Romans 7

Moklisto akangolama na Mobeko

1Bandeko, (nazali koloba na bato oyo bayebi Mobeko) boyebi te ete Mobeko ezalaka na nguya likolo ya moto kaka soki azali na bomoi ? 2Ndakisa : Mobeko esengaka ete mwasi ya libala akangama na mobali na ye, kaka soki mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, akozala na bonsomi liboso ya mobeko ya libala. 3Boye, soki abali mobali mosusu wana mobali na ye azali nanu na bomoi, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akozala na bonsomi liboso ya mobeko wana. Boye, bakoloba te ete asali ekobo ata soki abali mobali mosusu.

4Ndenge wana mpe bandeko na ngai, bino mpe bosila kokufa na Mobeko na nzela ya nzoto ya Klisto, mpo ete bokoma bato ya moto mosusu, Ye oyo asekwaki kati na bakufi mpo ete tobota mbuma mpo na Nzambe. 5Pamba te, wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe, oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya nzoto na biso mpo ete tobota mbuma oyo ememaka na kufa. 6Kasi sikʼoyo, lokola tokufa na nguya oyo ekangaki biso na bowumbu, tokangolamaki na nguya ya Mobeko mpo ete tosalela Nzambe na lolenge ya sika, na lisungi ya Molimo, kasi na nzela ya kala te ndenge ekomama na Mobeko.

7Boye, toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te, soki Mobeko elobaki te : “Kolula te”, nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali nini. 8Nzoka nde, lokola lisumu ezwaka nguya esika mitindo ezali, lisumu ebotaka kati na ngai lolenge nyonso ya baposa mabe. Pamba te, soki Mobeko ezali te, lisumu mpe ezali na nguya te. 9Kala tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi, kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, boye ngai nakufi. 10Bongo, mitindo oyo ekokaki komema na bomoi, ememaki ngai na kufa. 11Pamba te, lokola lisumu ezwaka nguya esika mitindo ezali, lisumu ekosaki ngai mpe ememaki ngai na kufa na nzela ya mitindo. 12Boye, Mobeko ezali bule mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu. 13Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzoka nde, lisumu mpo eyebana ete ezali lisumu mpe mpo elakisa mabe na yango penza na nzela ya mitindo, esalelaki eloko ya malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa. 14Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe. Kasi ngai, nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya masumu. 15Pamba te, makambo oyo nasalaka, nasosolaka yango te : oyo nalingaka, nasalaka yango te ; oyo nayinaka, yango nde nasalaka. 16Mpe soki nasali makambo oyo na nayinaka, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu. 17Yango wana, emonani ete ezali ngai te moto nasalaka bongo, kasi ezali nde lisumu oyo ezali kati na ngai. 18Pamba te, nayebi ete makambo ya malamu ezali kati na ngai te, na nzoto na ngai. Nazali na posa ya kosala makambo ya malamu, kasi nazangi nguya ya kokokisa yango. 19Pamba te, malamu oyo nalingaka kosala, nasalaka yango te, kasi mabe oyo nayinaka, yango nde nasalaka. 20Bongo, soki nasali makambo oyo nalingaka kosala te, ezali ngai te moto nasalaka yango, kasi lisumu oyo ezali kati na ngai. 21Soki nalingi kosala malamu, nakutanaka na mobeko oyo : nasalaka kaka mabe. 22Na motema na ngai, nasepelaka na Mobeko ya Nzambe. 23Kasi nakutanaka na mobeko mosusu kati na biteni ya nzoto na ngai, oyo ebundisaka mobeko ya makanisi ya motema na ngai. Boye, ekomisaka ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kati na biteni ya nzoto na ngai. 24Ah ngai moto na mawa ! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa ? 25Matondo na Nzambe : ezali na nzela na Yesu Klisto, Nkolo na biso. Na mokuse, nakoki koloba ete ngai moko na motema na ngai, nasalelaka Mobeko ya Nzambe, kasi na nzoto, nazali mowombu ya mobeko ya masumu.
Copyright information for LinMNB